|
Article in other languages:
|
Mani ya Marɔkɛ ezalí esé ya likoló ya Afríka. PolitíkiMarɔkɛ (المغرب), Marɔkɛ ezali mani na mobéko-mokonzi. Bato ba ekólo Marɔkɛ bapɔ́ní bantómá ba ekóló mpɔ̂ na kolobela mibéko. Mani Mohamed VI ezalí mani ya Marɔkɛ mpé mokonzi mwa Lɛ́ta. Kasi yě mɔ̌kɔ́ apɔ́ní tɛ́ likambo ya botéyi, bokɔ́lɔ́ngɔ́nú, b.n.b. Moto óyo apɔ́ní makambo mango azalí Minisele wa yambo. Yě ayángelana makambo ma Lɛ́ta na Baminisele. Sík’óyo Driss Jetto azalí Minisele wa yambo. Mambí ma mabeléMarɔkɛ ekabwání o Ɛ́sita na Aljeria, o Sudi na Sahara ya Limbɛ. Lombú Mediterané lokútámí o Nola-Ɛ́sita mpé Lombú Atlantíki o Wɛ́sita. Eténi enɛ́nɛ ya Marɔkɛ ezalí esíká elíkí Sahara ndé bato míngi bavándaka o libóngo lya lombú. Etando ya Marɔkɛ ezalí 446 550 km². Mbóka-mokonzi ezalí Rabat, na sɔ́kí bato 1,2 miliyɔ́. Engumba elekí monɛ́nɛ ezalí Kasablanka na sɔ́kí 3 miliyɔ́. Kasablanka mpé Rabat izalí libóngo lya bonkita. BatoBamakɔrkɛ bazalí na motángo mwa 32 miliyɔ́. Bazalí Barabi tǒ Babɛrbɛr. Lokótá la Lɛ́ta ezalí liarabu kasi bato míngi balobaka libɛrbɛr. Bato míngi balobaka mpé lifalansé. Boislamu ezalí na ntína o Marɔkɛ.
Questions for article: |
||||||||||||||||||||||||||||||||||||||||||||||
This article is from Wikipedia. All text is available under the terms of the GNU Free Documentation License.
IHS Europe: Infrared Heating Systems for Home and Business.